Psalms 134

Bosanzola Yawe !

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Bosanzola Yawe,
bino basali nyonso na Yawe,
bino baoyo bosalaka mosala na butu,
na kati ya Ndako na Yawe.

2 Botombola maboko na bino
kati na Esika ya bosantu,
mpe bosanzola Yawe !
3Tika ete Yawe, moto asala likolo mpe se apambola yo wuta na Siona.
Copyright information for LinMNB